Haut-Uele : bobiangi mpona koyamba bo ebongi mokambi ya etuka molandi oyo akokoma o mboka Dungu mokolo mwa mibale eye

Engumba Dungu ezali komibongisa mpo na boyei ya wa lokumu mokitani ya mokambi ya etuka ya Uele ya likolo Christophe Dara Matata. Oyo Ebongisamaki mpo na mokolo ya mibale oyo mwa tuku ibale sanza ya mitano mobu été tozali, na ebandeli ya nsima ya zanga.

Ndako mosala ya telitoile ya Dungu oyo esakolaki kpasa sango eye, ezali kobenga bayi mboka mobimba ya etando eye, lokola mpe lisanga ndenge na ndenge, mpo na ko milengele koyamba mokonzi eye.
Na libaki eye, Honorable Christophe Dara akokutana na bakonzi ya mboka mpe ba kambi ya bayi société civile mpo na kotala elongo mikakatano oyo etando ya Dungu ezali na yango. Ndenge wana ezali na tina mingi pona kolobela mambi misusu oyo ekoki ko mema tombwa ya mboka.

Boyambi esengeli kozala na ngonga ya 13:00 ya mboka na libanda ya ndako ya mosala ( bureau) ya telitoile ya Dungu. Ezali libaku oyo emonanaka mingi te mpo na bato mpo na kobimisa bilikya mpe mitungisi na bango mbala moko na bato oyo bazwaka mikano.
Biro ya Administrateur oyo ekokambemaka na mwana mboka Marcel Abule,elendisi makasi mofandi moko na moko mpo na kosangana na molende na molulu oyo.

Dunguinfordc

Articles Similaires

Laisser un commentaire

Votre adresse courriel ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *