Haut-Uele : mokambi ya sika ya DGRHU na Faradje, Donatien Leituru, apesi lokumu ya nsuka na journaliste Xavier Tereka

Na etuka ya Haut-Uele, Mokambi ya sika ya Direction Générale des Recettes du Haut-Uele (DGRHU) na territoire ya Faradje, Donatien Leituru, oyo eyebani mpe na kombo ya “De Goma”, apesaki lokumu ya nsuka na journaliste Xavier Tereka Lomoro, mwana ya mboka Faradje, oyo akundamaki na mokolo ya Mposo, 26 sanza ya nsambo 2026, nsima ya misa ya kokumisa Nzambe.

Na molulu yango, bakonzi ya Leta, bakambi ya bapanzi-sango ya ba provinces ya Haut-Uele mpe Ituri, bato ya libota, baninga mpe ebele ya bato bayaki kopesa lokumu ya nsuka na moweyi.

Lokola azali sika na mokumba ya kokamba DGRHU na Faradje, Donatien Leituru alobaki ete liwa ya Xavier Tereka ezali libunga monene mpo na libota, baninga mpe bato nyonso ya territoire ya Faradje.

Azalaki mpe kati na bato balandaki matanga banda na mobembo ya butu kino na molulu ya bokundi. Na libaku yango, apesaki maloba ya kobɔndisa epai ya libota ya moweyi mpe na bato nyonso ya Faradje.

Na nsango apesaki na DUNGUINFORDC, Donatien Leituru asengaki mingi bilenge ya Faradje bálanda ndakisa ya bomoi oyo Xavier Tereka atikaki.

Alobaki ete:

“Tókanisa Xavier Tereka mpo na bizaleli na ye ya malamu, mpiko, limemia, bolingo mpo na baninga, motema ya kosalela lisanga mpe komipesa mpo na bokoli ya mboka. Liwa na ye ezali liteya ete moto nyonso asengeli kotika lokumu mpe nkombo malamu sima na ye.”

Na nsuka, Mokambi ya DGRHU na Faradje abengaki bato nyonso ya territoire yango bábatela bomoko, kimia, bolingo mpe limemia kati na bango, mpo yango nde moboko ya bokoli ya Faradje.

Molimo ya Xavier Tereka Lomoro epema na kimia, mpe Nzambe abɔndisa libota na ye mpe bato nyonso bazali na mawa mpo na liwa na ye.

Sango ya Samuel Manota elimbolami na lingala ya Blaise Kazine

Articles connexes