Haut-Uele/ Basango na biso : Ba panzi sango mpe bayi Mboka ba sepeli mokolo ya bosomi ya bopanzi Sango o molongo na Dungu

Sango yango ezalaki na mokolo ya poso,mwa 3 mai 2025, na Mboka ya Dungu, o etuka ya Uele ya likolo na mokolo ya bokundoli bosomi ya mosala ya bopanzi Sango o mokili mobimba.

Mambi mitali likambo liye mikambemaki na Marcel Abule, mokambi ya etando (territoire) ya Dungu. Bokutani eye esangisaki bato ebele baye bautaki bisika na bisika, ezala bato ya losambo, bayimboka,banakelasi ya kati-kati mpe bana kelasi ya likolo.

Mama ya likambo ezalaki mingi penza «Bobateli bomoi ya moto ya bokutu ». Elobamaki na nganga mayele oyo Atali mobeko (magistrat) Lomange Tréfonds, oyo akosalaka esika ya Procureur de la République o parquet mpene na ndaku moke ya esambiselo ya Dungu (Tribunal de paix).

Mateya yaye epesaki nzela ya kofungola miso ya bayi mboka na makambo oyo etali bomoyi ya moto ya bokutu mpe mobeko likolo na oyo tobengi numérique.

Nakobeta mbela likolo na mobeko eye mpo na kobatela batu na ba mbemba ya mobeko ena.

Mondele mboka Dungu, Marcel Abule, atondaki na esengo mpona komona bokutani eye ya mutuya. Amonisaki ntina ya koyebisa bato , mingimingi bilenge, na ntina na makoki mpe mikumba oyo etali kosalela mayele ya sika ( réseaux sociaux).

« Bapanzi sango bazali na mokumba ya ntina na lisanga na biso, kaka te na koyebisa bato, kasi mpe na koteya mpe kobatela makoki ya bana mboka,» elobaki ye na lisikulu na ye,ya bosukisi.

Bana kelasi mpe bayi mboka baye bazalaki wana bamonisaki bosepeli makasi na mituna oyo batali, mpe balakisi mposa na bango ya koyekola mpe komipesa na makambo oyo etali bopesi sango.

Mokolo oyo ezalaki mpe libaku ya kofungola kpasa ndaku ya bopanzi Sango to bengi média en ligne ya Dunguinfordc, oyo ezuami na etando ena.

Sango ya Pierre Mungu, ebongwami na lingala ya Blaise Kazine

Articles Similaires

Laisser un commentaire

Votre adresse courriel ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *